![]()
(Intro)
Soki ozuaka nga ennemi n’o
nga naza ennemi na yo te
obulaka nga ennemi n’o
nga naza ennemi n’o te
Ennemi na nga eza mpiaka
ennemi na nga eza liwa
ennemi eza malade, ennemi
na nga eza galère eeeh…
(Refrain)
Nga ennemi na nga eza (batu
ba lingaka nga te), nga
ennemi na nga eza (batu
ba tshola nga yeah),
Nga ennemi na nga eza (batu
ba lingaka nga te), nga
ennemi na nga eza (batu
ba tshola nga yeah)
(Couplet 1)
eh eh eh ba jaloux, oh oh oh
ba jaloux, ba jaloux liaka
chez biso, na sima na biso ba
fingaka biso
Masanga ba mela chez biso, na
sima ba tongaka biso, bilamba
ba sengaka chez biso, na sima
na biso ba tsholaka biso
Awa toza na mpiaka aah (to simbi
kisi ya mpiaka te), tangu toko
koma na bozui (bolobi ke to simbi
kisi ya bozui)
Mokili pua nini bino boza
na ba constantes ya mabe
(Refrain)
Nga ennemi na nga eza (batu
ba lingaka nga te), nga
ennemi na nga eza (batu
ba tshola nga yeah),
Nga ennemi na nga eza (batu
ba lingaka nga te), nga
ennemi na nga eza (batu
ba tshola nga yeah)
(Couplet 2)
Makambo na nga kokota te
makambo na nga kokipe te
oyo yayo mpe nakota te, oyo
yayo mpe nakipe te
Tangu nga nakemba lelo oliaka
na batu aza te, tangu nga
nabunda lelo oliaka na batu aza
te
Lelo bomoni (yeah hein), bisika
tokomi (yeah hein), Nzambe asali
(yeah hein), bosekaki (yeah hein)
Lelo bomoni (yeah hein), bisika
tokomi (yeah hein)
(Refrain)
Nga ennemi na nga eza (batu
ba lingaka nga te), nga ennemi
na nga eza (batu ba tshola nga
yeah)
Nga ennemi na nga eza (batu
ba lingaka nga te), nga ennemi
na nga eza (batu ba tshola nga
yeah)
Voir aussi➔ Jamaïque, Prix de la vie & L’argent
Added by
lyrics africas
WRITE A COMMENT
WRITE A COMMENT

NTUMBA
mai 2, 2026 at 10:12 am
Vraiment zakalara tu mérite d’être couronnée
Henry
juillet 11, 2026 at 7:41 pm
Zakalara eza muntu ya bien